| Na yo |
| Moto bolingo’e komaki’o |
| Pesa nga mapapu pene na |
| Tuta mapata |
| Oy’e koboma ndoto na ngaï |
| Mawa |
| Yiii |
| Koko eh, eh |
| Kita libongo |
| Oli Kingabwa |
| Eleki nga nakoki té ya mbal’oyo, nga na suki awa |
| Soki olukaka nga nawa, hip hip hip hourra, o gagné |
| Yo moto na maboko mobimba ya moninga ozua |
| N’esika otia ye mwinda na motema, otié ye incendie |
| Et pourtant nga na motema nalonela yo fololo, Rosa |
| Hum, ah nga mawa hein |
| Nga moto o bolingo ekomaki’o pesa nga mapapu |
| Pene na pimbwa na li i kolo na simba mapata |
| Oye koboma ndoto na ngaï, ntina nazo luka |
| Nzembo na nga oy’a je t’aime e komi’a requiem |
| Na soniki’ango na makila ya motema na nga ozokisi |
| Jean-Chris Esso |
| Baninga e na misapi ba lata b’alliances |
| Bisengo nioso ya bolingo ba mona deux-à-deux |
| Oy’a ngayi mot’oyo na linga na nzoto zéro faute |
| Kasi na motema azanga ata grain de beauté eh |
| Nga l’amour na nga m’pona a ye nabimi kinzoré |
| Boyebisa |
| Ezalaka boye té o na bolingo (toyokanaki yo na nga a tolingana toujours) |
| Moto oyo a mi pesa molimo pete pete e (po akata motema eza eloko moké) |
| Pona koboma ye, tong’a masini ekoki |
| Ah nga nga nga a a mawa trop (ah nga nga nga nga na lela |
| Engambé Edo yebisa ye -Ma a ma ma coucou e eïme) |
| Tutu Roba yoka |
| Lisap’ongé, baninga e boyamba lisapo |
| Naza na chérie moko kitoko ata vue de dos |
| Moyi mobimba nasambelaka butu ekoma noki i |
| Azua nga na maboko ma ye oy’a ngaï vie ebanda |
| Tango muind’ekufaka, nga bonheur na ngaï cent pour cent |
| Tanga ba mbula ba sanza ya vie na nga y’o zui |
| Lelo na motema y’otikeli ngayi elembo |
| Y’obaluki, obosani ba serments pe ba promesses |
| Nakofunda na zuzi nini osi okoma elili ya butu |
| Y’o tungisak’esprit na nga osalaka ng’ezalazala |
| Eh |
| Mboka nini na kende’o bomba nzoto eh mama |
| Nakima soni bolingo natutelaki tolo mingi |
| Naboyaki koyoka avis ya ba familles mpe ya baninga |
| Y’ozui nga nioso otikeli nga se miso ya pamba po nalela |
| Ebongaki ozokisa nzoto kasi motema té o |
| Mawa |
| Verbe aimer lisusu un jour soki nako conjuguer |
| Ekozala se na lisolo ya nga na muan’oyo tobota |
| Ye bolingo na ye jamais ekosila lokola molinga |
| Mamelo o mokonzi verset nini basambelaka po nakobosana moto oyo balingaki mingi |
| Ngo amour qu’as-tu donc fait de nous (oh amour qu’as-tu donc fait de nous) |
| Yo bolingo po nini’o zanga mawa a a a (oh amour qu’as-tu donc fait de nous) |
| Yo qu’as-tu donc fait de nous) (oh amour qu’as-tu donc fait de nous) |
| Anicet Pedro pure vieux ya Achram Oje |
| Le loup qui Zangue |
| Eh, eh, eh |
| Bobina eh |
| Ebongela bino |
| Bana Lomeka |
| Epaï na bino gout |
| Bana moto-moto |
| Mama Amy, ah bino boleki biso |
| Johnny Ko Muva |
| Bana Kin |
| Teddy Kinsala |
| Willy Bomolo |
| Samba Ley |
| Modogo, eh eh, Modogo |
| Ba soeurs oy’a nzoto ya chance |
| Beata, Beloti |
| Gege Mfula Mambo |
| Dayoni |
| Ngouma |
| Bomoyi Jambwe eh |