Testo Mulherengo - Koffi Olomide

Mulherengo - Koffi Olomide
Informazioni sulla canzone In questa pagina puoi leggere il testo della canzone Mulherengo , di -Koffi Olomide
Canzone dall'album: Les prisonniers dorment…
Nel genere:Африканская музыка
Data di rilascio:31.12.1989
Lingua della canzone:Falce
Etichetta discografica:Koffi Olomide

Seleziona la lingua in cui tradurre:

Mulherengo
Oyeba otika nga na zemi
Nga mwana muke, otiya avenir na nga en danger
Mokolo okendaka, olakaki okozonga
Sanza mobimba kutu ekokoka te
Mokolo yango, mvula ezalaki konoka
Yango bomonaki te pinzoli na miso na nga
Sima nazali, sokoto nazeli
Bileko bileki, sokoto azongaka te
Nga nakoma soni ya famille na biso
Nga nde mwana mabe
Basekisaka nga lisusu te
Balakisaka nga misapi na nzela
Kaka mpo Pépé na nga aza na tata te
Ba masolo na yo na b’amis oyo na ngaï, se na le temps passé
Ndenge tolinganaka na l’amour ya folie
Ndenge tolakanaka se pe likolo
Ndenge tokanaka, toya kobota mwana
Ndenge topesaki ye deja kombo Roméo
Nabosani te Sokoto
Balobaka, balobaka oublier le passé
Wana maloba ya pamba, lelo nayebi
Balobaka, balobaka oublier le passé
Makambo mosusu babosanaka te
Anguele mawa te
Soki pe destinée
Alea acta est
Zonga ngo bolingo Sokoto
Yo nde avenir, vie nyonso ya moto eh
Yaka ngo bolingo Sokoto
Yo nde avenir, vie nyonso ya moto
Ah nga Felly nsomi ya mama, nakoma ko mi lela
Nakoma mwana mawa
Nasala nini vraiment na Nzambe po atika nga boye
Nakoma malheureuse
Ebale mozindo soki nayebaki qu’ezalaka bolingo nde natiaki te mosapi
Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
Asukoli maboko, akimi responsabilité
Nani akosi ye po lelo aboya nga
Moni motema ekobeta nga awa eh
Navandi na ndako, loboko na litama
Ndaku ovandaka te, okoyeba ndenge nini
Esika mayi ekotangaka moni
Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
Asukoli maboko, akimi responsabilité
Nani akosi ye po lelo aboya nga
Eh ngaï, eh ngaï, mawa trop
Eloko yango l’amour
Yango nga natuna na nani
Nga natuna na Didas
Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
Asukoli maboko, akimi responsabilité
Nani akosi ye po lelo aboya nga
Motema, molimo ngaï nalingaka yo
Y’okomisi nga yuma
Motema, molimo ngaï nalingaka yo
Y’okomisi nga yuma ehh
Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
Asukoli maboko, akimi responsabilité
Nani akosi ye po lelo aboya nga
Y’okeyi yolimwe
Y’otiki ata adresse te
Y’otiki mobulu na vie na nga ya mwasi
Nalelela nani, namipesa na losambo
Sokoto Manzala mwana ya mama Peto
Anicet Pedro yebisa ye
Moni na nga akeyi eh, motema ekobeta
Asukoli maboko, akimi responsabilité (eh, eh Achram Oje)
Nani akosi ye po lelo aboya nga
Oy’a losambo ya ba soeurs ya kilo
Beloti, Maka et compagnie
Karington, Nicolette de Monaco
Loboko obe na motema
Tcha-Tcho ata cop’ezalaka sukali
Opap’s Tilope

Condividi il testo:

Scrivi cosa pensi del testo!

Altre canzoni dell'artista: