| Mokolo mosusu ngai nakanisi
|
| Naloti lokola ngai nakolala
|
| Ah mama ha
|
| Mokolo nakokufa
|
| Mokolo nakokufa, nani akolela nga
|
| Nakoyeba te oh
|
| Tika namilela
|
| Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka
|
| Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mayi
|
| Oh mama uh
|
| Mokolo nakokufa
|
| Mokolo nakokufa, ngai motu ya pauvre
|
| Nakanisa Ida mwasi oyo nabala
|
| Nakanisa kaka bana nabota
|
| Nasepela kaka mpasi ya mokili ezali kotikala
|
| Mokolo nakokufa
|
| Mokolo nakokufa, ngáí moto ya mbóngo
|
| Nakanisa falánga míngi óyo natíkí
|
| Nakanisa lopángo na bakaminyó
|
| Nakanisa bána ngáí natínda na Mpótó
|
| Mamá uh
|
| Mokolo nakokufa
|
| Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti
|
| Nakanisa kopó ya masanga na ngai
|
| Nakanisa níni kaka súka ya sánzá
|
| Ntángo namelaka ngáí na baníngá
|
| Ah Mamá ha
|
| Mokolo nakokufa
|
| Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá
|
| Nakanisa níni káka perruque na ngá
|
| Nakanisa níni káka na bilambá na nga
|
| Nakolela káka African-Fiesta etíkala
|
| Mamá
|
| Mokolo nakokufa
|
| Mokolo nakokufa, nani akolela nga
|
| Nakoyeba te o
|
| Tika namilela
|
| Liwa ya zamba soki mpe liwa ya mboka
|
| Liwa ya mpasi soki mpe liwa ya mayi
|
| Oh mama
|
| Mokolo nakokufa
|
| Mokolo nakokufa, ngáí moto ya kwíti
|
| Nakanisa kopó ya masanga na ngai
|
| Nakanisa níni kaka súka ya sánzá
|
| Ntángo namelaka ngáí na baníngá
|
| Ah Mamá uh
|
| Mokolo nakokufa
|
| Mokolo nakokufa, ngáí mwásí ya ndúmbá
|
| Nakanisa níni káka perruque na ngá
|
| Nakanisa níni káka bilambá na nga
|
| Nakolela káka African-Fiesta etíkala
|
| Mamá
|
| Mokolo nakokufa |